23/10/2021
⛔️⛔️⚠️Sr Marie misamu banda okenda, awa makambu nionso ebeba na ngo
👉Sr l'or mbongo amitelisa akoma lokola Michael Jackson
👉Sandra mbuyi, deborha lukalu na Rosny kayiba bakoma lokola kisakata na bisalela lokola ba stars ya poto, nzoka ba vraie congolaise ya buala
👉 Basangana na Mike kalambayi basala émission MAAJABU TALENT na boule kk ke ba lakisa biso mibali na bango oyo ya poto bakosaka biso na ba anglais ya lukuta.
👉Bapekisa batu bayembaka banzembo nayo na émission na bango.
👉Maman Lydia abunga, toyebaka te soki azonga mboka to nini
👉Fr patrice abeta album ata bana naye moko ba sepela na ngo te.
👉Moïse mbiye nde azo suisa biso mutema, bala alingi pe kobala te, ba bebana na Éliane
👉Fr matou Samuel akoma koteka na boutique
👉J.kabila alongua tokoma na Félix tshisekedi muana ya Étienne tshisekedi oyo ya matama minene
👉Ba yela biso My gold rêve, ba lia biso mbongo après ba kima na bango
👉 Tokoma kotutela ba téléphone mbongo chaque moi lokola loyer babengi yango RAM
👉Cache-nez ezua valeur koleka na pondu, ekoma kotalama monde entier
👉Bayela biso malade moko ya lukuta na kombo ya corona virus
👉Basoso bakoma kobota na césarienne, maki moko ekoma 600fc, savon le coq kutu koloba te, moko ekoma 700fc
👉Mwana nayo otika awa kindumba moyen te, baloba baloba naye te, soki omeki okozua okozua tala ebele ya ba anglais okolapa, yaka kozua ye tolembi ye
👉Pesa pululu na ba dady mbote na ba emeneya. Na vieux bokule
👉Tolelaka yo kaka tii lelo, tokobosana yo te😢😢😢
COMMENTER, PARTAGER et INVITER vos AMI(E)S